歌曲 / 歌词

Mongongo Na Yesu

Listen on Apple Music

歌词

1.-Motema na ngai ekumisa yo
Nakende wapi soki na Yo te
Tango motema ekomaka (na) suka
Opesaka ngai eyano (bis)
2.-Ata na mpasi nako tika Yo te
Na tingama nangai kaka nse (na) yo
Otelemisaka makolo nangai
Esika basusu bazinda (bis)
3.-Ata namoni nzela eza molili
Na kobanga molili ya nzela te
Olakisaka ngai nzela
Esika natia lokolo (bis)
4.-Na mboka nangai t'oza
Kozela lisungi ekowuta epayi na Yo
Na mboka congo totatoli ete
Oza nzabe na bolingo (bis)
Solo: Oh! Yesu oyo
1: Mongongo na Yo
(Alleluia baba, baba)
Ebukaka ba ngomba na
Bomoyi ya bato nionso
Ekotosaka Yo (bis)
Solo: Oh! na nkombo na Yesu
2: Mongongo na Yo
Milimo etosaka tokomi
Balongi kaka pona
Nkombo na Yo (bis)
Solo: Oh! ngai n'aza moto na esengo
3: N'aza moto n'esengo nse
Mpona nkombo na Yo na
Koyembela Yo loyembo
Ya moteme na ngai (bis)