歌曲 / 歌词

Maman

Listen on Apple Music

歌词

Mileyi nini na sala na berceau ya maman
Eleki elingi koleka ba mbeto nionso nga na lala
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele na sengi zongisa nga susu wana
Jamais olingaki nga na lela yo seka
Jamais olingaki yo lala nga na lamuka
Jamais olingaki ata ngungi atungisa ngai
Soki na beli ozalaki kotana tongo nsa
Banda y'okenda nakoma abandoné, recompense nayo nako pesa nani yango?
Ata na leli nani ako dorloter nga a-a-ah
Yango na yembeli yo zembo oyo maman Niondo
Elengi ya libelé ya maman abota ngai
Eleki ba recette nionso ya ba cordon bleu nga na lia
Ata mafuta, tomate ezalaki te, kasi yango elakaka nde mosuni n'élengi
Banda y'okenda appétit esila nga-ah
Nakoma ko lia kaka po na sepelisa monoko
Mateya ya maman ezanga bulletin mpe minerval
Kasi eleki ba leçons ba maitres, ba professeurs ba pesa ngai
Mama soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbelé na sengi batia yo ministre y'éducation
Mbele ba parquets, ba prison nionso bakanga
Mbelé kutu motu mabé azali té eh
Lelo nakanisi yo mingi mama ah
Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene
B'invités bako lia bako mela masanga
Yo kutu artisan na ngai y'ozali te
Epayi y'ozali soki okutani n'occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo
Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y'ozala toujours maman ngai
Ata ba bandeli mokili soki mbala zomi
Ya nga serment y'ozala toujours maman ngai
Mais lelo nakanisi yo mingi maman Niondo
Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene
B'invités bako lia bako mela masanga
Yo kutu artisan na nga y'ozali te, maman
Epayi y'ozali soki okutani n'occasion eh
Tindela nga carte de voeux, ata fololo
Esengo na nga ekozala multiplier fois deux
Normalement fêti ya lelo ezali ya yo
Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka
Ya nga serment y'ozala toujours maman ngai
Ata ba bandeli mokili soki mbala kama eh
Ya nga serment y'ozala toujours maman ngai
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele na sengi zongisa nga susu wana. oh-h
Maman soki ozalaki kaka na bomoyi
Mbele na sengi zongisa nga susu wana